Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 16:7 - Mokanda na Bomoi

7 Samison azongiselaki ye : — Soki bakangi ngai na basinga sambo ya mobesu, oyo nanu bakawusi te, nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 16:7
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto oyo alobaka solo akowumela mpo na libela, kasi mokosi akowumela kaka mpo na tango moke.


Ndenge maloba ya lokumu ebongi te mpo na moto mabe, ndenge mpe maloba ya lokuta ebongi te mpo na mokonzi.


Mpe mpo na nini toloba te : « Tika ete tosala mabe mpo ete bolamu ebima kati na mabe » ndenge bato oyo batongaka biso bakosaka ete toteyaka bongo. Bato wana basengeli kozwa etumbu oyo ekoki na mabe na bango.


Bomikosa te : Nzambe amitikaka te ete batiola Ye. Oyo moto alonaka, yango nde abukaka.


Bokosanaka te, pamba te bobwakaki bomoto na bino ya kala elongo na misala na yango


Dalila alobaki na Samison : — Osakani na ngai mpe okosi ngai ! Sik’oyo, yebisa ngai eloko nini bakoki kosalela mpo na kokanga yo ?


Dalila ayebisaki Samison : — Yebisa ngai sekele ya makasi na yo mpe ndenge nini bakoki kokanga yo basinga mpe kosilisa yo makasi.


Boye, bakambi ya Filisitia bamemelaki Dalila basinga sambo ya mobesu, oyo nanu bakawusi te, mpe Dalila alingaki Samison basinga yango.


Lokola bato oyo batindamaki mpo na kokanga ye bazalaki ya kobombama kati na ndako, Dalila abelelaki : « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo ! » Samison akataki na pete penza basinga yango ndenge basinga ya lino ekatanaka soki ezwi moto. Boye, basosolaki te sekele ya makasi na ye.


Saulo alobaki na Mikali : — Mpo na nini oyokisi ngai soni mpe okimisi monguna na ngai, mpe sik’oyo abiki ? Mikali alobaki na Saulo : — Davidi alobaki na ngai : « Tika ngai nakima, noki te nakoboma yo. »


Tango Akishi atunaki : — Bobundi wapi lelo ? Davidi azongisaki : — Tobundi na sude ya Yuda, na sude ya mokili ya bato ya Yerameeli, mpe na sude ya mokili ya bato ya Keni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ