Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 16:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bakambi ya Filisitia bakendeki epai ya Dalila mpe balobaki na ye : « Solola na ye na maloba ya sukali mpo ete alakisa yo sekele ya makasi na ye mpe ndenge nini tokoki kolonga ye, mpo ete tokanga ye basinga mpe tosilisa ye makasi. Moko na moko kati na biso akopesa yo mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na nkama moko. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 16:5
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, kaka na mokolo wana, Ezawu azwaki nzela mpe azongaki na Seiri.


Maboko na bango eyebi penza kosala makambo mabe, bakambi mpe basambisi na bango bakomi koluka kanyaka ; bongo bato ya makasi bazali kosala makambo nyonso oyo balingi, bayokanaka mpo na kosala bato mabe.


mpe atunaki bango : — Bozali kokanisa kopesa ngai nini soki nateki Yesu epai na bino ? Boye bafutaki ye mbongo ya bibende tuku misato.


etuka oyo batangaka na molongo ya mikili ya Kanana ; wuta na ebale ya Shiyori, oyo etalana na Ejipito kino na ngambo ya nor, na etuka ya Ekroni. Kuna, ezalaki na bakambi mitano ya bato ya Filisitia : mokambi ya Gaza, ya Asidodi, ya Ashikeloni, ya Gati mpe ya Ekroni ; etuka ya bato ya Avi ;


Bongo na mokolo ya minei, balobaki na mwasi ya Samison : — Bondela mobali na yo mpo ete apesa biso ndimbola ya lisese ; sima na yango, yaka koyebisa biso ndimbola yango. Soki te, tokotumba yo elongo na ndako ya tata na yo. Obengisi biso awa mpo na koyiba biso ?


Sima na yango, Samison alingaki mwasi moko oyo azalaki kovanda na lubwaku ya Soreki ; kombo na ye ezalaki « Dalila. »


Dalila ayebisaki Samison : — Yebisa ngai sekele ya makasi na yo mpe ndenge nini bakoki kokanga yo basinga mpe kosilisa yo makasi.


Alobaki na mama na ye : — Shekeli ya palata nkoto moko na nkama moko oyo bayibaki yo, oyo na tina na yango olakelaki mabe na miso na ngai, ezali na maboko na ngai ; ngai nde nazwaki yango. Mama na ye alobaki na ye : — Mwana na ngai, tika ete Yawe apambola yo !


Yawe atikaki kati na mokili yango bakonzi mitano ya bato ya Filisitia, bato nyonso ya Kanana, bato nyonso ya Sidoni mpe bato nyonso ya Evi, oyo bazalaki kovanda na bangomba ya Libani, wuta na ngomba ya Bala-Erimoni kino na Lebo-Amati.


Boye Akishi abengaki Davidi mpe alobaki na ye : — Na Kombo na Yawe, ozali moto ya sembo. Nasepelaka komona yo kokende mpe kozonga elongo na ngai kati na mampinga. Wuta mokolo oyo oyaki epai na ngai kino lelo, natikali nanu kokanga yo na mbeba ata moko te ; kasi bakambi ya bato ya Filisitia bazali kondima yo te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ