Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 16:25 - Mokanda na Bomoi

25 Wana bazalaki kosepela, bagangaki : « Bomemela biso Samison mpo ete asepelisa biso ! » Babimisaki Samison na boloko mpe akomaki kosala masano liboso na bango. Tango batelemisaki ye na kati-kati ya makonzi ya tempelo na bango,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 16:25
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abisalomi apesaki mitindo epai ya basali na ye : — Boyoka ! Tango Aminoni akolangwa masanga ya vino, soki nalobi na bino : « Bobeta Aminoni ; » wana boboma ye. Bobanga te, pamba te ezali ngai moko nde nakopesa mitindo oyo. Bozala makasi mpe boyika mpiko.


Beni-Adadi ayokaki sango yango tango ye elongo na bakonzi bazalaki komela na bandako ya kapo. Apesaki mitindo epai ya bato na ye : — Bomibongisa mpo na etumba. Boye, bamibongisaki mpo na kobundisa engumba.


Na mokolo ya sambo, lokola mokonzi Kizerisesi alangwaki vino, atindaki basoda na ye sambo oyo baboma bango mokongo mpe bazalaki kosalela ye : Mewumani, Bizita, Aribona, Bigita, Abagita, Zetari mpe Karikasi.


Boye, na mitindo ya mokonzi, bantoma bakendeki na lombangu mpe bapanzaki kati na Size, engumba mokonzi, sango ya mobeko ya mokonzi. Wana mokonzi mpe Amani bavandaki mpo na komela masanga, engumba Size ezalaki kati na matanga.


soki nalati saki, bato basalaka masapo mpo na kotiola ngai.


Tika ete molako na bango etikala polele, mpe ete moto moko te avanda na bandako na bango ya kapo.


Kasi tala, ezalaki kaka bisengo mpe loyenge, koboma bangombe mpe bameme ya mibali, bantaba ya basi, kolia misuni mpe komela masanga ya vino ! Bozalaki koloba : « Tika ete tolia mpe tomela, pamba te, lobi, tokokufa ! »


balatisaki Ye ekoti ya nzube na moto mpe basimbisaki Ye lingenda moke na loboko na Ye ya mobali ; bongo babandaki kofukama liboso na Ye mpo na kotiola Ye, na koloba : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! »


Bamosusu batiolamaki, babetamaki fimbu, batiamaki minyololo mpe babwakamaki na boloko ;


Tango bato bamonaki Samison, bakumisaki nzambe na bango, balobaki : « Nzambe na biso akabi na maboko na biso, monguna na biso, oyo azalaki kobebisa mokili na biso mpe koboma bato ebele kati na biso. »


Samison alobaki na mosali oyo asimbaki loboko na ye : « Tia ngai na esika oyo nakoki kosimba makonzi oyo esimbi tempelo mpo ete nalalela yango. »


Nganga-nzambe atondaki na esengo, akamataki efode, banzambe ya bikeko ya ndako mpe bikeko mosusu ; akendeki elongo na bato ya libota ya Dani.


Boye, bango mibale bavandaki esika moko mpo na kolia mpe komela. Sima na yango, tata ya mwana mwasi alobaki : « Nabondeli yo, vanda lisusu, na butu ya lelo, mpo ete motema na yo esepela. »


Tango mobali elongo na makangu na ye mpe mosali na ye batelemaki mpo na kokende, tata-bokilo na ye, tata ya mwana mwasi, alobaki na ye : « Tala, pokwa esili koya ! Nabondeli yo : lekisa lisusu butu awa ; mokolo esili, vanda mpe sepelisa motema na yo. Bongo lobi, na tongo-tongo, bokoki kotelema mpo na kokende, mpe okozonga na ndako na yo. »


Na tango ya kobuka bambuma ya vino, bato ya Sishemi bakendeki na bilanga, bakamolaki vino mpe basalaki feti monene kati na tempelo ya nzambe na bango. Wana bazalaki kolia mpe komela, balakelaki Abimeleki mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ