Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 16:24 - Mokanda na Bomoi

24 Tango bato bamonaki Samison, bakumisaki nzambe na bango, balobaki : « Nzambe na biso akabi na maboko na biso, monguna na biso, oyo azalaki kobebisa mokili na biso mpe koboma bato ebele kati na biso. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 16:24
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazwaki biloko na ye, bamemaki moto na ye elongo na bibundeli na ye, mpe batindaki bato na mokili mobimba ya bato ya Filisitia mpo ete bapanza sango malamu oyo ya elonga epai ya banzambe na bango ya bikeko mpe epai ya bato na bango.


Tika ete soni ekanga basambeli nyonso ya bikeko, bato oyo bamikumisaka mpo na banzambe ya lokuta ! Bino banzambe nyonso, bogumbama liboso na Ye !


Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso na maboko na ye, mpo ete mikili nyonso ya mabele eyeba solo ete Yo moko kaka, Yawe, nde ozali Nzambe. »


Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo oyo liboso na bango, nabimisaki bango na Ejipito.


Otomboli mapeka na yo mpo na kotelemela Yawe ya Lola, oyeisi epai na yo bakopo oyo ewutaki na Tempelo na Ye ; bongo yo, bato na yo ya lokumu, basi na yo mpe bamakangu na yo, bomeli na yango masanga ya vino mpe bokumisi banzambe ya palata mpe ya wolo, ya bronze mpe ya ebende, ya nzete mpe ya mabanga, oyo emonaka te, eyokaka te mpe esosolaka te. Kasi opesi lokumu te na Nzambe oyo, kati na loboko na Ye, asimbi bomoi mpe banzela na yo nyonso.


Wana bazalaki komela vino, bazalaki kokumisa banzambe ya wolo mpe ya palata, ya bronze, ya ebende, ya nzete mpe ya libanga.


Bongo abonzelaka monyama na ye mbeka, atumbelaka kitunga na ye ansa ; pamba te na nzela ya monyama mpe ya kitunga na ye, azwaka bambisi ebele mpe bilei ya kitoko.


Kasi nazali kobanga ete banguna bafinga Ngai mpe bayini na bango bamikosa te na koloba : ‹ Tolongaki na makasi na biso moko, Yawe asalaki eloko moko te. › »


Bavandi nyonso ya mokili bakosepela na tina na kufa na bango, bakosala feti mpe bakopesana bakado, pamba te basakoli wana mibale batungisaki mingi bavandi ya mokili.


Tango bakomaki pembeni ya etuka ya Leyi, bato ya Filisitia bayaki kokutana na ye na koganga. Molimo na Yawe akitelaki ye na nguya, mpe basinga oyo ekangaki maboko na ye ekatanaki lokola basinga ya lino oyo eziki na moto, mpe ekweyaki wuta na maboko na ye.


Samison alobaki : « Na mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane, nakangisi bango mipiku na mipiku ; na mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane, nabomi bato nkoto moko. »


Samison abundisaki bango mpe abomaki ebele kati na bango. Bongo akendeki mpe avandaki kati na lidusu ya mabanga, na Etami.


Wana bazalaki kosepela, bagangaki : « Bomemela biso Samison mpo ete asepelisa biso ! » Babimisaki Samison na boloko mpe akomaki kosala masano liboso na bango. Tango batelemisaki ye na kati-kati ya makonzi ya tempelo na bango,


Bakataki moto ya Saulo, bazwaki bibundeli na ye mpe batindaki bato na mokili mobimba ya bato ya Filisitia mpo ete bapanza sango malamu oyo ya elonga kati na tempelo ya banzambe na bango ya bikeko mpe kati na bato na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ