Nzokande, ezala tango bakozala kati na mokili ya banguna na bango, nakosundola bango te, nakotombokela bango te kino kobebisa bango mpe kokata boyokani na Ngai elongo na bango ; pamba te Ngai nazali Yawe, Nzambe na bango.
Yawe akosambisa bato na Ye, mpe akoyokela basali na Ye mawa ; tango akomona ete makasi na bango esili, mpe akomona ete ezali lisusu na moto moko te oyo bakoki kokanga to kokangola.
Bato ya Filisitia bakangaki ye, batobolaki ye miso, bamemaki ye na Gaza mpe bakangaki ye minyololo ya bibende ya bronze. Akomaki konika bambuma ya ble na enikelo ya libanga kati na boloko.
Bakambi ya Filisitia basanganaki mpo na kobonza mbeka monene epai ya nzambe na bango, Dagoni, mpe kosala feti. Balobaki : « Nzambe na biso akabi monguna na biso, Samison, na maboko na biso. »