Bilombe 16:20 - Mokanda na Bomoi20 Dalila abelelaki Samison : « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo ! » Samison alamukaki na pongi na ye mpe amilobelaki : « Nakosala ndenge kaka nasalaka liboso mpe nakokangolama na ngai. » Kasi ayebaki te ete Yawe alongwaki kati na ye. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi Samison alalaki wana kaka kino na kati-kati ya butu ; bongo na ngonga ya zomi na mibale ya butu, alamukaki. Tango akomaki na ekuke ya engumba, asimbaki bizipelo na yango elongo na makonzi na yango mibale. Apikolaki yango elongo na libaya ya kokangela, atombolaki mpe atiaki yango na mapeka na ye, bongo amemaki yango kino na songe ya ngomba moke oyo etalana na engumba Ebron.