Bilombe 16:2 - Mokanda na Bomoi2 Tango bato ya Gaza bayokaki sango ete Samison azali kati na engumba na bango, bazingelaki esika oyo Samison alalaki mpe basenzelaki butu mobimba, mpo na kozela ye na ekuke ya engumba. Na butu yango, baninganaki te mpe balobaki : « Tokoboma ye na tongo tango akobima. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi Samison alalaki wana kaka kino na kati-kati ya butu ; bongo na ngonga ya zomi na mibale ya butu, alamukaki. Tango akomaki na ekuke ya engumba, asimbaki bizipelo na yango elongo na makonzi na yango mibale. Apikolaki yango elongo na libaya ya kokangela, atombolaki mpe atiaki yango na mapeka na ye, bongo amemaki yango kino na songe ya ngomba moke oyo etalana na engumba Ebron.