Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 16:19 - Mokanda na Bomoi

19 Dalila alalisaki Samison na mipende na ye, abengaki mobali moko mpo na kokata ye suki sambo ya moto na ye. Samison akomaki kolemba, mpe makasi na ye esilaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 16:19
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Namoni likambo oyo : mwasi oyo motema na ye ezali lokola motambo to monyama, oyo maboko na ye ezali lokola minyololo, azali mabe koleka kufa ; mobali oyo asepelisaka Nzambe akotikala kokangama te na motambo na ye, kaka mobali oyo asalaka masumu nde akokangama na motambo na ye.


Tango Dalila amonaki ete Samison ayebisi ye makambo nyonso, atindaki sango epai ya bakambi ya Filisitia. Alobaki : « Boya lisusu, ayebisi ngai makambo nyonso. » Bakambi ya Filisitia bazongaki epai ya Dalila na mbongo ya bibende na maboko na bango.


Dalila abelelaki Samison : « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo ! » Samison alamukaki na pongi na ye mpe amilobelaki : « Nakosala ndenge kaka nasalaka liboso mpe nakokangolama na ngai. » Kasi ayebaki te ete Yawe alongwaki kati na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ