Bilombe 16:18 - Mokanda na Bomoi18 Tango Dalila amonaki ete Samison ayebisi ye makambo nyonso, atindaki sango epai ya bakambi ya Filisitia. Alobaki : « Boya lisusu, ayebisi ngai makambo nyonso. » Bakambi ya Filisitia bazongaki epai ya Dalila na mbongo ya bibende na maboko na bango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bakambi ya Filisitia bakendeki epai ya Dalila mpe balobaki na ye : « Solola na ye na maloba ya sukali mpo ete alakisa yo sekele ya makasi na ye mpe ndenge nini tokoki kolonga ye, mpo ete tokanga ye basinga mpe tosilisa ye makasi. Moko na moko kati na biso akopesa yo mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na nkama moko. »