Bilombe 16:16 - Mokanda na Bomoi16 Lokola, mokolo na mokolo, Dalila azalaki kotungisa Samison na maloba na ye mpe kozangisa ye kimia, Samison amonaki ete motungisi yango eleki ye ndelo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bongo mwasi ya Samison akomaki kolela liboso ya mobali mpe alobaki na ye : — Oyina ngai ! Solo, olingaka ngai te ! Oyebisaki bato na ngai lisese, kasi oyebisaki ngai ndimbola na yango te ! Samison azongisaki : — Natikala kutu kolimbola yango epai ya tata to mama na ngai te, bongo ndenge nini nalimbola yango epai na yo ?