Bato ya Yuda bazongisaki : — Iyo ! Tokoboma yo te. Tolingi kaka kokanga yo na basinga mpe kokaba yo na maboko na bango. Bongo bakangaki ye na basinga mibale ya sika mpe babimisaki ye na lidusu ya mabanga.
Dalila azwaki basinga ya sika mpe akangaki na yango Samison. Bongo abelelaki : « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo ! » Atako bato oyo batindamaki mpo na kokanga ye bazalaki lisusu ya kobombama kati na ndako, Samison akataki kaka lokola singa moko pamba, basinga oyo bakangaki ye.