Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 16:10 - Mokanda na Bomoi

10 Dalila alobaki na Samison : — Osakani na ngai mpe okosi ngai ! Sik’oyo, yebisa ngai eloko nini bakoki kosalela mpo na kokanga yo ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 16:10
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mbala minei, batindelaki ngai sango kaka moko ; mpe tango nyonso, ngai mpe nazalaki kozongisela bango eyano kaka moko.


Kotatola na pamba te mpo na kosala moninga na yo mabe ; mpo na nini olingi kosalela bibebu na yo na lokuta ?


Bongo bato na Ngai bayei epai na yo ndenge kaka bayaka tango nyonso mpe bavandi liboso na yo mpo na koyoka maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te, pamba te minoko na bango ebimisaka kaka makambo oyo esepelisaka mitema na bango, mpe mitema na bango elukaka kaka bolamu na bango moko.


kasi Yesu atunaki ye : — Yuda, ozali penza koteka Mwana na Moto na nzela ya beze ?


Samison alobaki : — Soki bakangi ngai na basinga ya sika oyo nanu basaleli te, nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso.


Boye Dalila alobaki na Samison : — Kino sik’oyo, ozali kaka kosakana na ngai mpe kokosa ngai ! Yebisa ngai ndenge nini bakoki kokanga yo basinga. Samison azongisaki : — Soki okangi suki sambo ya moto na ngai na singa oyo batongelaka bilamba, mpe soki okangisi yango na likonzi, nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso. Boye tango Samison azalaki nanu kolala, Dalila azwaki suki sambo ya moto na ye, akangaki yango na singa oyo batongelaka bilamba


Samison azongiselaki ye : — Soki bakangi ngai na basinga sambo ya mobesu, oyo nanu bakawusi te, nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso.


Lokola bato oyo batindamaki mpo na kokanga ye bazalaki ya kobombama kati na ndako, Dalila abelelaki : « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo ! » Samison akataki na pete penza basinga yango ndenge basinga ya lino ekatanaka soki ezwi moto. Boye, basosolaki te sekele ya makasi na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ