Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 15:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bato ya Filisitia bayaki mpe batongaki molako na bango kati na etuka ya Yuda, bapanzanaki kino na etuka ya Leyi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 15:9
5 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato ya Yuda batunaki : — Mpo na nini boyei kobundisa biso ? Bato ya Filisitia bazongiselaki bango : — Toyei kokanga Samison na basinga mpo ete tosala ye ndenge asalaki biso.


Tango bakomaki pembeni ya etuka ya Leyi, bato ya Filisitia bayaki kokutana na ye na koganga. Molimo na Yawe akitelaki ye na nguya, mpe basinga oyo ekangaki maboko na ye ekatanaki lokola basinga ya lino oyo eziki na moto, mpe ekweyaki wuta na maboko na ye.


Tango asilisaki koloba, abwakaki mokuwa yango mosika mpe apesaki esika yango kombo « Ramati-Leyi. »


Bongo Nzambe afungolaki libanga oyo ezalaki kati na Leyi, mpe libanga yango ebimisaki mayi. Tango Samison amelaki mayi, makasi na ye ezongaki mpe azwaki lisusu bomoi. Boye abengaki etima yango Eyini-Akore.


Samison abundisaki bango mpe abomaki ebele kati na bango. Bongo akendeki mpe avandaki kati na lidusu ya mabanga, na Etami.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ