Bilombe 15:5 - Mokanda na Bomoi5 Apelisaki koni yango mpe atikaki bambwa ya zamba kati na bilanga ya ble ya bato ya Filisitia, oyo esili kokomela. Atumbaki maboke ya ble oyo batiaki na mipiku mpe ble oyo babukaki nanu te, banzete ya vino mpe banzete ya olive. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bato ya Filisitia batunaki : — Nani asali boye ? Bazongiselaki bango : — Ezali Samison, bokilo ya moto moko ya Timina ; pamba te abalisaki mwasi ya Samison epai ya moko kati na baninga oyo Samison abengisaki na feti. Bato ya Filisitia bakendeki mpe batumbaki mwasi yango elongo na tata na ye kino bakufaki.