Abisalomi alobaki na basali na ye : « Botala ! Elanga ya Joabi ezali pembeni ya elanga na ngai, ezali na bambuma ya orje. Bokende kotia yango moto. » Basali ya Abisalomi batiaki yango moto.
Bongo na mokolo ya minei, balobaki na mwasi ya Samison : — Bondela mobali na yo mpo ete apesa biso ndimbola ya lisese ; sima na yango, yaka koyebisa biso ndimbola yango. Soki te, tokotumba yo elongo na ndako ya tata na yo. Obengisi biso awa mpo na koyiba biso ?
Baboti na ye bayebaki te ete likambo wana ewutaki epai na Yawe, pamba te Yawe azalaki koluka nzela mpo na kokotisa mobulu kati na bana ya Isalaele mpe bato ya Filisitia. Pamba te na tango wana, bato ya Filisitia bazalaki kokonza bana ya Isalaele.
Alobaki na Samison : — Nakanisaki penza ete olingaka ye te, yango wana nabalisaki ye epai ya moko kati na baninga na yo, oyo obengisaki na feti. Tala leki na ye ya mwasi, aleki ye na kitoko te ? Zwa ye kaka.
Samison abimaki mpe akangaki bambwa ya zamba nkama misato, akangisaki yango mibale-mibale na mikila mpe atiaki koni na kati-kati ya mikila mibale-mibale ya bambwa yango.