Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 15:20 - Mokanda na Bomoi

20 Samison akambaki Isalaele mibu tuku mibale, wana bato ya Filisitia bazalaki kokonza mokili.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 15:20
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Dani akokamba bato na ye lokola moko kati na bikolo ya Isalaele.


Bongo naloba lisusu nini ? Pamba te nakozanga tango soki nabandi koloba na tina na Jedeon, Baraki, Samison, Jefite, Davidi, Samuele mpe basakoli.


Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe na miso ya Yawe, mpe Yawe akabaki bango mibu tuku minei na maboko ya bato ya Filisitia.


pamba te okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Bakoki te kokata suki ya moto na ye, pamba te mwana mobali yango akozala bule mpo na Nzambe wuta na libumu ya mama na ye. Akobanda kokangola Isalaele wuta na maboko ya bato ya Filisitia. »


Bandeko na ye mpe libota nyonso ya tata na ye bayaki kozwa ebembe na ye. Bazongaki na yango mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye, Manoa, na kati ya bingumba Tsorea mpe Eshitaoli. Samison akambaki Isalaele mibu tuku mibale.


Tango kaka moto wana atangaki kombo ya Sanduku ya Nzambe, Eli akweyaki makalikali longwa na kiti na ye, pembeni ya ekuke ya Ndako ya Yawe, kingo na ye ebukanaki, mpe akufaki, pamba te azalaki mobange mpe nzoto minene. Akambaki Isalaele mibu tuku minei.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ