18 Lokola azalaki na posa makasi ya mayi, asambelaki Yawe : « Opesi mosali na Yo elonga oyo monene ; boni, nakufa sik’oyo na posa ya mayi mpe nakweya na maboko ya bato oyo bakatama ngenga te ? »
Bopanza sango yango te kati na Gati, bopanza yango te na babalabala ya Ashikeloni, noki te bana basi ya bato ya Filisitia bakosepela, mpe bana basi ya mibali oyo bakatama ngenga te bakopumbwa na esengo.
Tata mpe mama na ye bazongisaki : — Boni, kati na bandeko na yo to kati na bato na biso nyonso, ezali te na bana basi ya kitoko mpo ete okende kozwa mwasi kati na bato ya Filisitia oyo bakatama ngenga te ? Kasi Samison alobaki na tata na ye : — Balela ngai ye, pamba te ye nde abongi mpo na ngai.
Davidi atunaki mibali oyo bazalaki pembeni na ye : — Eloko nini bakosala na moto oyo akoboma moto ya Filisitia oyo mpe akolongola soni kati na Isalaele ? Moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te azali nani mpo ete atiola mampinga ya Nzambe na bomoi ?
Lokola mosali na yo abomaki ezala ngombolo to nkosi, akoboma mpe moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te lokola moko kati na banyama wana, pamba te atioli mampinga ya Nzambe na bomoi.
Davidi akanisaki mpe amilobelaki : « Mokolo ezali oyo Saulo akoboma ngai na nzela ya loboko na ye. Boye eleki malamu mpo na ngai kokima na mokili ya bato ya Filisitia. Na bongo nde Saulo akotika koluka ngai kati na Isalaele mobimba, mpe ngai nakokima loboko na ye. »