Samison alobaki : « Na mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane, nakangisi bango mipiku na mipiku ; na mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane, nabomi bato nkoto moko. »
Lokola azalaki na posa makasi ya mayi, asambelaki Yawe : « Opesi mosali na Yo elonga oyo monene ; boni, nakufa sik’oyo na posa ya mayi mpe nakweya na maboko ya bato oyo bakatama ngenga te ? »