Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 15:11 - Mokanda na Bomoi

11 Bato nkoto misato ya Yuda bakendeki na lidusu ya mabanga ya Etami, mpe balobaki na Samison : — Oyebi te ete bato ya Filisitia bazali kokonza biso ? Likambo nini osali biso ? Samison azongisaki : — Nazongiseli bango makambo oyo bango basalaki ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 15:11
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala bana mibali ya Etami : Jizireyeli, Yishima mpe Yidibashi. Kombo ya ndeko na bango ya mwasi ezalaki Atseleliponi.


Nakopesa nzela na mopanga mpo ete eboma bino mpo na kozongisa mabe na mabe likolo ya boyokani oyo bino bobebisi. Tango bokosangana kati na bingumba na bino, nakotindela bino bokono oyo ebomaka, mpe nakokaba bino na maboko ya monguna.


Yawe akokomisa bino mito, kasi mikila te ; pamba te bokobatela penza mitindo ya Yawe, Nzambe na bino, oyo nazali kopesa bino lelo mpe bokosalela yango penza. Lokumu na bino ekozala kaka likolo, ekokita te.


Mopaya oyo avandi kati na bino akoleka bino na lokumu tango nyonso, kasi bino bokokita se kokita ;


Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe na miso ya Yawe, mpe Yawe akabaki bango mibu tuku minei na maboko ya bato ya Filisitia.


Baboti na ye bayebaki te ete likambo wana ewutaki epai na Yawe, pamba te Yawe azalaki koluka nzela mpo na kokotisa mobulu kati na bana ya Isalaele mpe bato ya Filisitia. Pamba te na tango wana, bato ya Filisitia bazalaki kokonza bana ya Isalaele.


Bato ya Yuda batunaki : — Mpo na nini boyei kobundisa biso ? Bato ya Filisitia bazongiselaki bango : — Toyei kokanga Samison na basinga mpo ete tosala ye ndenge asalaki biso.


Bato ya Yuda balobaki na Samison : — Toyei mpo na kokanga yo na basinga mpe kokaba yo na maboko ya bato ya Filisitia. Samison alobaki na bango : — Bolapa ndayi liboso na ngai ete bokoboma ngai te bino moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ