Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 14:6 - Mokanda na Bomoi

6 Molimo na Yawe akitelaki Samison na nguya. Boye, Samison apasolaki nkosi na kati-kati, na maboko pamba, ndenge bapasolaka mwana ntaba. Kasi kati na makambo oyo asalaki, ayebisaki eloko moko te epai ya tata to mama na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 14:6
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

okotambola na likolo ya nkosi mpe ya etupa, okonyata nkosi ya monene mpe dalagona.


akotombola mongongo te, akoganga te, akobelela na mongongo makasi te na babalabala ;


Alobaki na ngai : — Tala liloba oyo Yawe alobi na Zorobabeli : « Ezali na makasi to na nguya na yo te, kasi na nguya na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Bozwa ekangiseli na Ngai, bomema yango mpe boyekola epai na Ngai, pamba te nazali na motema ya boboto mpe ya komikitisa, bongo milimo na bino ekozwa bopemi.


Mpo na kondima, balongaki bokonzi ebele, batambolisaki makambo na bosembo mpe bamonaki bilaka ya Nzambe kokokisama mpo na bango ; bakangaki ata minoko ya bankosi,


Moto oyo amipesaka na masumu azali ya Satana, pamba te Satana asalaka masumu wuta na ebandeli. Nzokande Mwana na Nzambe ayaki penza mpo na kobebisa misala ya Satana.


Molimo na Yawe akitelaki Jefite. Jefite akatisaki Galadi mpe Manase, mpe alekaki na Mitsipe ya Galadi. Wuta na Mitsipe ya Galadi, akendeki kobundisa bato ya Amoni.


Molimo na Yawe abandaki kosalela ye tango azalaki na Maane Dani, na kati-kati ya Tsorea mpe Eshitaoli.


Bongo Molimo na Yawe akitelaki Samison na nguya. Akendeki na Ashikeloni mpe abomaki bato tuku misato, azwaki bilamba na bango mpe apesaki yango epai ya bato oyo bapesaki ye ndimbola ya lisese. Azongaki na ndako ya tata na ye na kanda makasi.


Samison akendeki na Timina elongo na tata mpe mama na ye. Tango bakomaki pembeni ya bilanga ya vino ya Timina, mbala moko, mwana nkosi moko eyaki konguluma liboso ya Samison.


Sima na yango, Samison akendeki na Timina, asololaki na mwana mwasi mpe alingaki ye.


Samison amonaki mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane, asembolaki loboko na ye, alokotaki mokuwa yango mpe abomaki na yango bato nkoto moko.


Samison abundisaki bango mpe abomaki ebele kati na bango. Bongo akendeki mpe avandaki kati na lidusu ya mabanga, na Etami.


Bongo Samison alobaki : « Tika ete nakufa elongo na bato ya Filisitia ! » Bongo atindikaki na makasi na ye nyonso, mpe tempelo ekweyelaki bakambi mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna. Boye, kati na kufa na ye, abomaki bato ebele koleka na tango oyo azalaki na bomoi.


Molimo na Yawe ayaki likolo na ye mpe akomaki elombe kati na bana ya Isalaele ; bongo akendeki kobunda bitumba. Yawe akabaki Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami, na maboko ya Otinieli ; mpe Otinieli alongaki ye.


Saulo azongiselaki noko na ye : — Ayebisaki biso ete ba-ane ekomonana solo. Kasi Saulo ayebisaki noko na ye te makambo oyo Samuele alobaki na ye na tina na bokonzi.


Bongo Molimo na Yawe akokitela yo na nguya, okosakola elongo na bango, mpe okobongwana moto ya lolenge mosusu.


Tango Saulo ayokaki maloba na bango, Molimo na Nzambe akitelaki ye na nguya mpe asilikaki makasi.


Mokolo moko, Jonatan, mwana mobali ya Saulo, alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : « Yaka ! Tokatisa na ngambo mosusu epai wapi bato ya Filisitia bazali. » Kasi alobaki ata likambo moko te epai ya tata na ye.


Na mokolo ya lelo, Yawe akokaba yo na maboko na ngai ; nakoboma yo mpe nakokata moto na yo. Na mokolo ya lelo kaka, nakopesa bibembe ya mampinga ya Filisitia epai ya bandeke ya likolo mpe epai ya banyama ya mokili ; mpe mokili mobimba ekoyeba ete ezali na Nzambe moko kati na Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ