5 Samison akendeki na Timina elongo na tata mpe mama na ye. Tango bakomaki pembeni ya bilanga ya vino ya Timina, mbala moko, mwana nkosi moko eyaki konguluma liboso ya Samison.
Benaya, moto ya mboka Kabitseli mpe mwana mobali ya Yeoyada, azalaki soda ya mpiko mpe asalaki makambo ebele ya kokamwa : abomaki bilombe mibale ya Moabi ; mpe na mokolo ya mvula ya pembe, akitaki na libulu moko ya mayi mpe abomaki kuna nkosi.
Benaya, moto ya mboka Kabitseli mpe mwana mobali ya Yeoyada, azalaki soda ya mpiko mpe asalaki makambo ebele ya kokamwa : abomaki bilombe mibale ya mboka Moabi ; mpe na mokolo moko ya mvula ya pembe, akitaki na libulu moko ya mayi mpe abomaki kuna nkosi.
Mpo na kondima, balongaki bokonzi ebele, batambolisaki makambo na bosembo mpe bamonaki bilaka ya Nzambe kokokisama mpo na bango ; bakangaki ata minoko ya bankosi,
Longwa na Baala, mondelo yango ekatisaki na ngambo ya weste, pene ya ngomba Seiri ; elekaki na mopanzi ya ngomba ya bazamba, na ngambo ya nor (oyo ezali ngomba Kesaloni) ; ekobaki kokita kino na Beti-Shemeshi mpe ekatisaki kino na Timina.
Bolekisaka ndelo te na bizaleli na bino mpe botambolaka na ekenge, pamba te monguna na bino, Satana, atambolaka zingazinga na bino lokola nkosi oyo ezali konguluma mpe koluka moto ya kolia.
Baboti na ye bayebaki te ete likambo wana ewutaki epai na Yawe, pamba te Yawe azalaki koluka nzela mpo na kokotisa mobulu kati na bana ya Isalaele mpe bato ya Filisitia. Pamba te na tango wana, bato ya Filisitia bazalaki kokonza bana ya Isalaele.
Molimo na Yawe akitelaki Samison na nguya. Boye, Samison apasolaki nkosi na kati-kati, na maboko pamba, ndenge bapasolaka mwana ntaba. Kasi kati na makambo oyo asalaki, ayebisaki eloko moko te epai ya tata to mama na ye.