Bilombe 14:17 - Mokanda na Bomoi17 Na mikolo nyonso sambo ya feti, azalaki kaka kolela. Suka na suka, na mokolo ya sambo, Samison alimbolelaki ye yango, pamba te mwasi na ye atungisaki ye mingi. Bongo mwasi ya Samison, ye mpe akendeki kopesa ndimbola ya lisese yango epai ya bato na ye. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bongo mwasi ya Samison akomaki kolela liboso ya mobali mpe alobaki na ye : — Oyina ngai ! Solo, olingaka ngai te ! Oyebisaki bato na ngai lisese, kasi oyebisaki ngai ndimbola na yango te ! Samison azongisaki : — Natikala kutu kolimbola yango epai ya tata to mama na ngai te, bongo ndenge nini nalimbola yango epai na yo ?
Boye Dalila alobaki na Samison : — Kino sik’oyo, ozali kaka kosakana na ngai mpe kokosa ngai ! Yebisa ngai ndenge nini bakoki kokanga yo basinga. Samison azongisaki : — Soki okangi suki sambo ya moto na ngai na singa oyo batongelaka bilamba, mpe soki okangisi yango na likonzi, nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso. Boye tango Samison azalaki nanu kolala, Dalila azwaki suki sambo ya moto na ye, akangaki yango na singa oyo batongelaka bilamba