14 Samison alobaki na bango : — Kati na oyo eliaka, ebimi oyo baliaka ; kati na oyo ezali makasi, ebimi oyo ezali elengi. Mikolo misato mobimba, bakokaki te kopesa ye eyano.
Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi, mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, mpe yo okoswa bango na litindi. »
Bongo sango ekomaki na matoyi ya Jozafati na maloba oyo : « Mampinga minene ezali koya kobundisa yo longwa na Siri mpe na ngambo mosusu ya ebale monene ; esili kokoma na Atsatsoni-Tamari oyo babengaka Eyini-Gedi. »
Pamba te pasi oyo tozali komona sik’oyo ezali pepele mpe ezali koleka, ezali nde kobongisela biso nkembo monene, nkembo ya seko mpe nkembo oyo eleki nyonso na motuya.
Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.
Bongo na mokolo ya minei, balobaki na mwasi ya Samison : — Bondela mobali na yo mpo ete apesa biso ndimbola ya lisese ; sima na yango, yaka koyebisa biso ndimbola yango. Soki te, tokotumba yo elongo na ndako ya tata na yo. Obengisi biso awa mpo na koyiba biso ?