Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 14:12 - Mokanda na Bomoi

12 Samison alobaki na bango : — Nalingi koyebisa bino lisese moko. Soki bopesi ngai eyano, na mikolo sambo ya feti, nakopesa bino bilamba tuku misato ya lino mpe bilamba tuku misato ya feti.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 14:12
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jozefi apesaki epai ya moko na moko kati na bango bilamba ya sika ; apesaki Benjame mbongo ya bibende, nkama misato, elongo na bilamba ya sika.


Tango mwasi mokonzi ya Saba ayokaki sango ya lokumu oyo Kombo ya Yawe epesaki Salomo, ayaki mpo na komeka ye na nzela ya mituna ya makasi ;


Geazi azongisaki : — Iyo, nyonso ezali malamu. Nkolo na ngai atindi ngai koyebisa yo : « Bilenge bayekoli mibale kati na basakoli bayei epai na ngai wuta na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Nabondeli yo, pesa bango bakilo ya palata, tuku misato na mitano, mpe bilamba mibale ya talo. »


Mokonzi ya Siri alobaki na ye : — Malamu ! Nakotinda mokanda epai ya mokonzi ya Isalaele. Boye Namani akendeki mpe amemaki bakilo ya palata, nkama misato na tuku mitano ; bakilo ya wolo, tuku sambo, mpe bilamba zomi ya talo.


Boye, na tango wana, Salomo elongo na Isalaele mobimba basalaki feti oyo ewumelaki mikolo sambo ; ezalaki lisanga monene ya bato oyo bayaki wuta na Amati kino na mayi oyo etiolaka na kati-kati ya bangomba ya Ejipito.


Monoko na ngai ekoloba maloba ya bwanya ; motema na ngai ekanisi makambo oyo ekopesa bino bososoli.


mpo na kososola masese mpe sambole, maloba ya bwanya mpe kolimbola makambo.


Asalaka bilamba ya lino mpe atekaka yango, asalaka mombongo ya mikaba.


« Mwana na moto, bongisa sambole moko mpe loba yango lokola lisese epai ya libota ya Isalaele.


Tala mpo na nini nazali koloba na bango na masese : ezali mpo ete atako bazali kotala, bamona te ; mpe atako bazali koyoka, basosola te.


Yesu azalaki kosalela masese mpo na koloba makambo wana nyonso epai ya ebele ya bato ; mpe na tango nyonso oyo azalaki koloba na bango, azangaki te kosalela masese.


Balongolaki Ye bilamba, balatisaki Ye nzambala ya motane,


Bonduka bomengo te awa na mokili, pamba te ekoki kobeba to nselele ekoki kolia yango to mpe miyibi bakoki kobuka ndako mpo na koyiba yango.


Tango Yesu amonaki ndenge nini bato oyo babengamaki na feti bazalaki kopona bisika ya lokumu, alobaki na bango lisese oyo :


Bayekoli ya Yesu balobaki : — Okomi sik’oyo koloba na biso na polele mpe otiki koloba na masese !


Solo, sik’oyo, tozali komona kaka elilingi, lokola kati na talatala ; kasi mokolo ezali, mokolo oyo tokomona penza ndenge esengeli. Sik’oyo nayebi kaka moke ; kasi mokolo ezali, mokolo oyo nakoyeba penza nyonso, ndenge Nzambe ayebi ngai.


Bomengo na bino esili kopola, mpe mpese esili kolia bilamba na bino ;


Tango abimaki, bapesaki bato tuku misato mpo ete bavanda na ye elongo.


Soki bokoki te kopesa ngai eyano, bokopesa ngai bilamba tuku misato ya lino mpe bilamba tuku misato ya feti. Balobaki : — Yebisa biso lisese na yo, tolingi koyoka yango !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ