Bongo anjelu alobaki na ngai : « Koma : ‹ Esengo na bato oyo babengami na feti ya libala ya Mpate ! › » Alobaki lisusu : « Ezali maloba ya solo ya Nzambe. »
Akamataki yango na maboko na ye mpe aliaki yango nzela-nzela. Tango akutanaki na baboti na ye, apesaki bango ndambo ya mafuta ya nzoyi. Bongo bango mpe baliaki yango ; kasi atikalaki koyebisa bango te ete azwaki mafuta yango ya nzoyi kati na nzoto ya nkosi oyo ekufa.