9 Nzambe ayokaki Manoa, mpe Anjelu na Nzambe ayaki lisusu epai ya mwasi, wana avandaki na bilanga. Kasi mobali na ye, Manoa, azalaki elongo na ye te.
Mpo na Yo Nzambe, bozangi makelele ezali lokumu, kati na Siona ; mpe mpo na Yo, ndayi ekokokisama.
Mwasi ya Manoa akendeki mbangu koyebisa mobali na ye : « Tala, namoni moto oyo abimelaki ngai na mikolo oyo eleki ! »
Bongo Manoa asambelaki Yawe : « Oh Nkolo, nabondeli Yo : tika ete ozongisa lisusu moto na Nzambe, oyo otindelaki biso, mpo ete aya lisusu koteya biso nini tosengeli kosala mpo na mwana mobali oyo akobotama ! »