Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 13:8 - Mokanda na Bomoi

8 Bongo Manoa asambelaki Yawe : « Oh Nkolo, nabondeli Yo : tika ete ozongisa lisusu moto na Nzambe, oyo otindelaki biso, mpo ete aya lisusu koteya biso nini tosengeli kosala mpo na mwana mobali oyo akobotama ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 13:8
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lakisa ngai makambo oyo nazali kokoka komona te ; soki nasali mabe, nakozongela yango lisusu te. ›


Kasi sik’oyo, telema, kota kati na engumba, mpe, kuna, bakoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala.


Manoa atelemaki mpe alandaki mwasi na ye. Tango akomaki epai ya moto yango, alobaki : — Boni, ezali yo nde osololaki na mwasi na ngai ? Azongisaki : — Iyo, ezali ngai.


Anjelu na Yawe abimelaki mwasi ya Manoa mpe alobaki : « Tala, ozali ekomba mpe ozali na bana te, kasi okokoma na zemi mpe okobota mwana mobali.


Tango mwasi azongaki epai ya mobali na ye, ayebisaki ye : « Moto moko ya Nzambe ayaki epai na ngai, azalaki lokola Anjelu na Nzambe : azalaki somo mingi. Natunaki ye te soki awuti wapi, mpe ayebisaki ngai te kombo na ye.


Kasi alobaki na ngai : ‹ Okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Bongo komela vino to masanga mosusu ya makasi te mpe kolia eloko moko te ya mbindo, pamba te mwana mobali oyo okobota akozala bule mpo na Nzambe wuta na libumu ya mama na ye kino na mokolo na ye ya kufa. › »


Nzambe ayokaki Manoa, mpe Anjelu na Nzambe ayaki lisusu epai ya mwasi, wana avandaki na bilanga. Kasi mobali na ye, Manoa, azalaki elongo na ye te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ