Nyama nyonso oyo ezali na makolo minei mpe etambolaka na matambe na yango ezali mbindo. Moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akozala mbindo kino na pokwa.
pamba te akozala moto monene na miso ya Nkolo. Akomela te ezala vino to masanga ya makasi, mpe akozala atonda na Molimo Mosantu wuta na libumu ya mama na ye.
Akolia eloko moko te oyo ewuti na nzete ya vino, akomela vino te to masanga mosusu ya makasi, akolia eloko moko te ya mbindo ; asengeli kosala makambo nyonso oyo natindi ye.
Kasi alobaki na ngai : ‹ Okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Bongo komela vino to masanga mosusu ya makasi te mpe kolia eloko moko te ya mbindo, pamba te mwana mobali oyo okobota akozala bule mpo na Nzambe wuta na libumu ya mama na ye kino na mokolo na ye ya kufa. › »