Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 13:25 - Mokanda na Bomoi

25 Molimo na Yawe abandaki kosalela ye tango azalaki na Maane Dani, na kati-kati ya Tsorea mpe Eshitaoli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 13:25
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Molimo amemaki Yesu kati na esobe mpo ete Satana ameka Ye.


Motindami ya Nzambe alobaka kaka maloba kowuta na Nzambe, pamba te Nzambe atondisa ye na Molimo na Ye nyonso.


Tala bingumba oyo ezalaki na etando, pene ya ebale monene : Eshitaoli, Tsorea, Ashina,


Libula na bango ya mabele ezalaki : Tsorea, Eshitaoli, Iri-Shemeshi ;


Molimo na Yawe akitelaki Jefite. Jefite akatisaki Galadi mpe Manase, mpe alekaki na Mitsipe ya Galadi. Wuta na Mitsipe ya Galadi, akendeki kobundisa bato ya Amoni.


Mokolo moko, Samison akendeki na Timina mpe amonaki kuna elenge mwasi moko ya Filisitia.


Bongo Molimo na Yawe akitelaki Samison na nguya. Akendeki na Ashikeloni mpe abomaki bato tuku misato, azwaki bilamba na bango mpe apesaki yango epai ya bato oyo bapesaki ye ndimbola ya lisese. Azongaki na ndako ya tata na ye na kanda makasi.


Bandeko na ye mpe libota nyonso ya tata na ye bayaki kozwa ebembe na ye. Bazongaki na yango mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye, Manoa, na kati ya bingumba Tsorea mpe Eshitaoli. Samison akambaki Isalaele mibu tuku mibale.


Boye, bana ya libota ya Dani batindaki mibali mitano ya libota na bango, kowuta na Tsorea mpe na Eshitaoli, mpo na kokende kononga mpe koyeba mokili yango. Balobaki na bango : « Bokende koyeba mokili yango ndenge ezali. » Mibali mitano yango bakotaki na etuka ya bangomba ya Efrayimi kino na ndako ya Mika, epai wapi balekisaki butu.


Molimo na Yawe ayaki likolo na ye mpe akomaki elombe kati na bana ya Isalaele ; bongo akendeki kobunda bitumba. Yawe akabaki Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami, na maboko ya Otinieli ; mpe Otinieli alongaki ye.


Kasi Molimo na Yawe alataki Jedeon, mpe abetaki kelelo mpo na kobengisa bato ya libota ya Abiezeri na tina ete balanda ye.


Tango Saulo ayokaki maloba na bango, Molimo na Nzambe akitelaki ye na nguya mpe asilikaki makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ