17 Manoa atunaki Anjelu na Yawe : — Kombo na yo nani mpo ete topesa yo lokumu tango elaka na yo ekokokisama ?
Moto yango alobaki lisusu : — Kobanda lelo, kombo na yo ekozala lisusu Jakobi te, kasi Isalaele, pamba te obundi na Nzambe mpe na bato, bongo olongi.
Jakobi alobaki : — Nabondeli yo, yebisa ngai kombo na yo. Azongiselaki ye : — Mpo na nini ozali kotuna kombo na ngai ? Boye apambolaki ye na esika wana.
Anjelu na Yawe azongiselaki ye : — Mpo na nini ozali kotuna ngai kombo na ngai ? Kombo na ngai ezali kombo ya kokamwa.