Kuna, Anjelu ya Yawe abimelaki ye kati na ndemo ya moto oyo ezalaki komata longwa kati na mwa nzete. Moyize amonaki nzete moke yango kopela moto, kasi ezalaki kozika te.
Manoa atelemaki mpe alandaki mwasi na ye. Tango akomaki epai ya moto yango, alobaki : — Boni, ezali yo nde osololaki na mwasi na ngai ? Azongisaki : — Iyo, ezali ngai.