11 Manoa atelemaki mpe alandaki mwasi na ye. Tango akomaki epai ya moto yango, alobaki : — Boni, ezali yo nde osololaki na mwasi na ngai ? Azongisaki : — Iyo, ezali ngai.
Okokisi bilaka oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo ; makambo oyo olobaki, na monoko na Yo, okokisi yango na nguya ya loboko na Yo, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.
Nzokande, tango Jozue azalaki pene ya Jeriko, atombolaki miso mpe amonaki moto moko atelemi liboso na ye ; moto yango asimbaki mopanga na loboko na ye. Jozue apusanaki pene na ye mpe atunaki ye : — Boni, ozali na ngambo na biso to na ngambo ya banguna na biso ?