Boni, moto mwindo akoki solo kobongola poso ya nzoto na ye ? Nkoyi ekoki kolongola penza matono ya poso ya nzoto na yango ? Bokokoka kosala malamu te, bino bato oyo bomesana kosala mabe.
Bana ya Isalaele basalaki lisusu makambo mabe na miso ya Yawe ; basalelaki banzambe Bala, Asitarite, mpe banzambe ya Siri, ya Sidoni, ya Moabi, ya Amoni mpe ya Filisitia. Basundolaki Yawe mpe basalelaki Ye lisusu te.
Baboti na ye bayebaki te ete likambo wana ewutaki epai na Yawe, pamba te Yawe azalaki koluka nzela mpo na kokotisa mobulu kati na bana ya Isalaele mpe bato ya Filisitia. Pamba te na tango wana, bato ya Filisitia bazalaki kokonza bana ya Isalaele.
Kasi babosanaki Yawe, Nzambe na bango. Yango wana Ye Yawe akabaki bango na maboko ya Sisera, mokonzi ya basoda ya Atsori ; na maboko ya bato ya Filisitia mpe na maboko ya mokonzi ya Moabi oyo babundisaki bango.
Bato ya Filisitia bayokisamaki soni mpe bazongelaki lisusu te kokota na mokili ya Isalaele. Na mikolo nyonso ya bomoi ya Samuele, loboko na Yawe etelemelaki bato ya Filisitia.