Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 12:6 - Mokanda na Bomoi

6 bazalaki kosenga ete aloba : « Shiboleti ; » soki alobi : « Siboleti, » mpo ete akoki te koloba yango malamu, bazalaki kokanga ye mpe koboma ye na esika oyo bakatisaka Yordani na makolo. Na tango wana, babomaki bato ya Efrayimi nkoto tuku minei na mibale.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 12:6
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bimisa ngai na potopoto, sala ete nazinda lisusu te, nakangolama wuta na maboko ya bayini na ngai mpe nabima na mayi ya mozindo !


Nzambe, bikisa ngai, pamba te mayi ekomi na kingo na ngai.


Kobanda koswana ezali lokola kofungola nzela ya mayi ; tika na yo liboso ete kobendana ekoma makasi.


Kokota lisusu na motema ya ndeko oyo osali mabe ezalaka pasi koleka kokota na engumba batonga makasi ; mpe koswana na moto ezali lokola kokanga bikuke ya ndako batonga makasi na bibende ya minene.


Maloba ya moto ya bwanya epesaka esengo, kasi maloba ya zoba elukelaka ye makambo.


Na tango wana, Yawe akotuta ble wuta na ngambo ya ebale (Efrate) kino na mayi oyo etiolaka makasi na bangomba ya Ejipito. Boye, bino bana ya Isalaele, Yawe akolokota bino moko na moko mpo na kosangisa bino.


Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, alobaki na bango : — Bokonzi nyonso oyo bavandi na yango bakomi kobunda bango na bango ekobebisama ; engumba nyonso to ndako nyonso oyo bato na yango bazali lisusu na bomoko te ekowumela te.


Sima na mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana bapusanaki mpe balobaki na Petelo : — Ezali ya solo, yo mpe ozali moko kati na bato wana ; elobeli na yo ezali kofunda yo.


Petelo awanganaki lisusu. Sima na mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana bazongelaki koloba na Petelo : — Ezali ya solo, yo mpe ozali moko kati na bango, mpe ozali moto ya Galile.


Soki bozali kotukana mpe kozokisana, bosala keba ete bobomana te bino na bino.


Bato ya Galadi bakangaki esika oyo bakatisaka Yordani na makolo, pene ya etuka ya Efrayimi. Mpe tango nyonso mokimi moko ya Efrayimi azalaki koloba : « Tika ngai nakatisa, » bato ya Galadi bazalaki kotuna ye : « Ozali moto ya Efrayimi ? » Soki azongisi : « Te, »


Jefite, moto ya Galadi, akambaki Isalaele mibu motoba. Sima na yango, akufaki, mpe bakundaki ye kati na engumba moko ya Galadi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ