Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 12:4 - Mokanda na Bomoi

4 Jefite asangisaki mibali nyonso ya Galadi, mpe babundisaki bato ya Efrayimi. Bato ya Galadi balongaki bato ya Efrayimi ; mpe bato ya Efrayimi balobaki : « Bino bato ya Galadi, bozali na bino kaka bato oyo bokimaki wuta na Efrayimi mpe na Manase. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 12:4
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eliya, moto ya Tishibe, moko kati na bavandi ya Galadi, alobaki na mokonzi Akabi : — Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, Nzambe oyo ngai nasalelaka, mamwe mpe mvula ekozala te na mibu oyo ezali koya, longola kaka soki nasengi yango.


Nzokande, na tango yango kaka, bato ya Yuda bazalaki koyimayima : « Awa bato oyo bazali komema mabele bazali lisusu na makasi te, mpe mipiku ya mabanga ya mir oyo ekweya ezali nanu ya komata, tokotikala kolonga te kotonga lisusu mir oyo ! »


Bato ya libota ya Efrayimi basimbaki batolotolo, kasi na mokolo ya etumba, bakimaki.


Moto ya misala mabe akangamaka na motambo ya maloba na ye ya lokuta, kasi moyengebene akobika kati na pasi.


Eyano ya kimia ekimisaka kanda, kasi maloba oyo ezokisaka ebakisaka kanda.


Bampaka ya Galadi bazongiselaki Jefite : — Tika ete Yawe azala Motatoli kati na biso ! Tika ete apesa biso etumbu soki tosali te ndenge olobi.


Tango namonaki ete bokangoli na bino ngai te, nakabaki bomoi na ngai, mpe nakatisaki ngai moko nzela ya bato ya Amoni mpo na kobundisa bango ; mpe Yawe apesaki ngai elonga likolo na bango. Sik’oyo, mpo na nini boyei lelo kobundisa ngai ?


Bato ya Galadi bakangaki esika oyo bakatisaka Yordani na makolo, pene ya etuka ya Efrayimi. Mpe tango nyonso mokimi moko ya Efrayimi azalaki koloba : « Tika ngai nakatisa, » bato ya Galadi bazalaki kotuna ye : « Ozali moto ya Efrayimi ? » Soki azongisi : « Te, »


Kasi Nabali azongiselaki basali ya Davidi : « Davidi azali nani ? Mwana mobali ya Izayi azali nani ? Mikolo oyo, basali ebele bazali kokima bankolo na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ