Bilombe 12:3 - Mokanda na Bomoi3 Tango namonaki ete bokangoli na bino ngai te, nakabaki bomoi na ngai, mpe nakatisaki ngai moko nzela ya bato ya Amoni mpo na kobundisa bango ; mpe Yawe apesaki ngai elonga likolo na bango. Sik’oyo, mpo na nini boyei lelo kobundisa ngai ? အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Andimaki kobungisa bomoi na ye tango abomaki moto ya Filisitia, mpe, na mokolo yango, Yawe azwaki elonga monene mpo na Isalaele mobimba. Omonaki yango mpe osepelaki na yango makasi. Sik’oyo, mpo na nini olingi na yo kosala lisumu na tina moko te, na koboma moto lokola Davidi oyo asali na ye likambo te ? »