Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 12:1 - Mokanda na Bomoi

1 Bato ya Efrayimi basanganaki, bakatisaki na ngambo ya Tsafoni mpe balobaki na Jefite : — Mpo na nini okatisaki mondelo ya bato ya Amoni mpo na kobundisa bango, bongo obengaki biso te mpo ete tokende na yo elongo ? Tokotumba yo elongo na ndako na yo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 12:1
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato oyo ngai nalingaka bafundi ngai, kasi ngai namipesi na ngai kaka na mabondeli.


Namoni ete pasi nyonso oyo bato bamonaka na mosala mpe lokumu oyo bazwaka na misala na bango, ewutaka kaka na bilulela ya moto liboso ya moninga na ye. Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.


Tango Efrayimi azalaki koloba, bato bazalaki kolenga ; azalaki kokonza kati na Isalaele, kasi asalaki mabe na kosambela nzambe Bala ; yango wana akufaki.


Soki bokonzi moko ekabwani, bokonzi yango ekowumela te.


kasi Yesu alobaki na bango : — Nalakisi bino bikamwa mingi ya minene oyo esalemaki na nguya ya Tata ; mpo na likamwisi nini bolingi koboma Ngai na mabanga ?


Pamba te esika oyo zuwa mpe koswana ezali, esika wana mpe mobulu ya lolenge nyonso mpe misala mabe ezalaka.


mibu nyonso, bilenge basi ya Isalaele babimaka mikolo minei, mpo na kosala feti na tina na mwana mwasi ya Jefite, moto ya Galadi.


Jefite azongiselaki bango : — Ngai mpe bato na ngai, tozalaki na kobendana makasi na bato ya Amoni ; mpe tango nabengaki bino, bokangolaki ngai te wuta na maboko na bango.


Bongo na mokolo ya minei, balobaki na mwasi ya Samison : — Bondela mobali na yo mpo ete apesa biso ndimbola ya lisese ; sima na yango, yaka koyebisa biso ndimbola yango. Soki te, tokotumba yo elongo na ndako ya tata na yo. Obengisi biso awa mpo na koyiba biso ?


Bato ya Filisitia batunaki : — Nani asali boye ? Bazongiselaki bango : — Ezali Samison, bokilo ya moto moko ya Timina ; pamba te abalisaki mwasi ya Samison epai ya moko kati na baninga oyo Samison abengisaki na feti. Bato ya Filisitia bakendeki mpe batumbaki mwasi yango elongo na tata na ye kino bakufaki.


Mibali ya Efrayimi batunaki Jedeon : — Bizaleli ya boye elakisi nini epai na biso ? Mpo na nini obengaki biso te tango okendeki kobundisa bato ya Madiani ? Mpe basilikelaki ye makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ