moko akokanga ndeko na ye ya mobali kati na ndako ya tata na bango mpe akoloba : « Yo oyo ozali na kazaka, okozala mokonzi na biso, kamata mokumba ya libebi oyo na maboko ! »
Jefite azongiselaki bampaka ya Galadi : — Boni, ezali bino te bato oyo boyinaki ngai mpe bobenganaki ngai wuta na ndako ya tata na ngai ? Mpo na nini bozali koya sik’oyo epai na ngai, awa bokomi na pasi ?