Bilombe 11:32 - Mokanda na Bomoi32 Bongo Jefite akatisaki bandelo ya bato ya Amoni, mpe Yawe akabaki bango na maboko na ye. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango nyonso Yawe azalaki kobimisela bango elombe, abandaki mpe kozala elongo na elombe yango mpo na kobikisa bango wuta na maboko ya banguna na bango, na tango nyonso oyo elombe yango azalaki na bomoi. Solo Yawe azalaki koyokela bango mawa, pamba te azalaki koyoka bango kolela liboso ya banyokoli na bango mpe ya bato oyo bazalaki komonisa bango pasi.