Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 11:31 - Mokanda na Bomoi

31 nakobonzela Yo, Yawe, lokola mbeka ya kotumba, nyonso oyo ekobima na ekuke ya ndako na ngai mpo na koyamba ngai, tango nakozonga na elonga wuta na bato ya Amoni. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 11:31
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

soki nazongi na kimia na ndako ya tata na ngai, wana Yawe akozala Nzambe na ngai,


Moto oyo atumbi mbeka ya ngombe azali lokola ye oyo abomi moto, moto oyo atumbi mbeka ya mwana meme azali lokola ye oyo abuki kingo ya mbwa, moto oyo apesi makabo ya mbuma azali lokola ye oyo abonzi makila ya ngulu, moto oyo atumbi ekaniseli ya malasi ya ansa azali lokola ye oyo apamboli nzambe ya ekeko. Solo, baponi kolanda banzela na bango moko mpe kosepela na makambo na bango ya nkele.


Kati na bana ya Isalaele, azala mobali to mwasi, moko te asengeli komipesa na kindumba ya bule.


Jefite alapaki ndayi epai na Yawe, alobaki : « Soki okabi bato ya Amoni na maboko na ngai,


Bongo Jefite akatisaki bandelo ya bato ya Amoni, mpe Yawe akabaki bango na maboko na ye.


Bongo apesaki elaka, alobaki : « Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, soki kaka otali pasi ya mwasi mowumbu na Yo, soki okanisi ngai mpe obosani te mwasi mosali na Yo, kasi opesi ye mwana mobali, nakokaba ye epai na Yawe mpo na mikolo nyonso ya bomoi na ye, mpe bakotikala kokata suki ya moto na ye te. »


Boye, ngai mpe nakabi ye sik’oyo epai na Yawe : bomoi na ye mobimba, akozala ya Yawe. Sima na yango, agumbamelaki Yawe na esika yango.


Bato ya Isalaele bazalaki na pasi makasi mokolo wana, pamba te Saulo atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi esangana na bilakeli mabe. Alobaki : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei liboso ete pokwa ekoma, liboso ete ngai nazongisa mabe na mabe na banguna na ngai. » Boye moto moko te amekaki kolia.


Saulo alobaki : — Jonatan, tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi koleka soki okufi te.


Kasi Samuele azalaki kosala mosala na ye liboso ya Yawe. Elenge mobali Samuele azalaki kolata efode ya lino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ