Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 11:3 - Mokanda na Bomoi

3 Boye, Jefite akimaki mosika ya bandeko na ye ya mibali mpe akomaki kovanda kati na etuka ya Tobi. Bato ya mobulu basanganaki na ye mpe bazalaki kotambola elongo na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 11:3
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bato ya Amoni basosolaki ete bamikomisi bato mabe na miso ya Davidi, bakotisaki bato ya sika na mosala ya soda, oyo bakobanda kobunda bitumba na makolo : epai ya bato ya Siri ya Beti-Reobi mpe ya Tsoba, bato nkoto tuku mibale ; epai ya mokonzi ya Maaka, bato nkoto moko ; epai ya mokonzi ya Tobi, bato nkoto zomi na mibale.


Bato ya Amoni babimaki mpe batandamaki na milongo mpo na bitumba, na ekuke ya engumba mokonzi na bango. Na tango wana, bato ya Siri ya Tsoba mpe ya Reobi elongo na basoda ya Tobi mpe Maaka bazalaki na esika mosusu, kati na zamba.


Kasi Bayuda mosusu basalaki zuwa ; bakendeki kozwa bato ya mobulu oyo batambolaka pamba-pamba na balabala, basangisaki bango mpe babimisaki mobulu kati na engumba. Bakendeki mbangu na ndako ya Jazoni mpo na koluka Polo mpe Silasi mpo ete bamema bango liboso ya ebele ya bato.


Nzokande mwasi ya Galadi abotelaki ye mpe bana mibali. Mpe tango bakolaki, babenganaki Jefite ; balobaki na ye : « Ozali na libula te kati na ndako ya tata na biso, pamba te ozali mwana ya makangu. »


Bapesaki ye mbongo ya bibende ya palata, tuku sambo oyo bazwaki na tempelo ya Bala-Beriti. Na mbongo yango, Abimeleki afutaki bato ya mobulu mpo na kolanda ye.


Bato nyonso oyo bazalaki kati na minyoko, ba-oyo bazalaki na baniongo ya bato mosusu mpe ba-oyo mitema na bango ezoka, basanganaki zingazinga ya Davidi mpe akomaki mokambi na bango. Elongo na ye, ezalaki na bato pene nkama minei.


Bongo Davidi elongo na bato nkama motoba oyo bazalaki elongo na ye batelemaki mpe bakendeki epai ya Akishi, mwana mobali ya Maoki, mokonzi ya Gati.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ