Na ngomba oyo etalani na Yelusalemi, Salomo atongaki esambelo ya likolo ya ngomba mpo na Kemoshi, nzambe ya mbindo ya Moabi ; mpe mpo na Moloki, nzambe ya mbindo ya bato ya Amoni.
Lokola bozali kotia mitema na misala na bino mpe na bomengo na bino, bino mpe bokokende na bowumbu ; boye Kemoshi mpe akokende na bowumbu elongo na Banganga-Nzambe mpe bakambi na ye.
Oh Moabi, mawa na yo ! Oh bato ya Kemoshi, bobebisami ! Bakomisaki bana na ye ya mibali bakimi ; mpe bana basi na ye, bakangami ya mokonzi Sikoni, mokonzi ya Amori.
Moto nyonso oyo asalaka makambo oyo, azali mbindo na miso ya Yawe ; mpe ezali mpo na makambo nyonso oyo ya nkele nde Yawe, Nzambe na bino, akobengana bikolo wana liboso na bino.
Boye, Yawe apesaki na Isalaele mokili nyonso oyo alakaki kopesa epai ya batata na bango na nzela ya ndayi. Bana ya Isalaele bazwaki yango mpe bakomaki kovanda kuna.
Bongo Jozue alobaki : — Ezali na nzela oyo nde bokoyeba solo ete Nzambe na bomoi azali elongo na bino mpe akobengana liboso na bino bato ya Kanana, ya Iti, ya Evi, ya Perizi, ya Girigazi, ya Amori mpe ya Yebusi.
Bana ya Isalaele basalaki lisusu makambo mabe na miso ya Yawe ; basalelaki banzambe Bala, Asitarite, mpe banzambe ya Siri, ya Sidoni, ya Moabi, ya Amoni mpe ya Filisitia. Basundolaki Yawe mpe basalelaki Ye lisusu te.
Awa Yawe, Nzambe ya Isalaele, asili kobotola mokili ya bato ya Amori mpe apesi yango epai ya bana ya Isalaele, yo olingi sik’oyo kobotola bango yango ?
Anjelu ya Yawe alongwaki na Giligali mpe akendeki na Bokimi. Alobaki : « Nabimisaki bino na Ejipito mpe nakotisaki bino na mokili oyo nalakaki kopesa epai ya bakoko na bino na nzela ya ndayi. Nalobaki : ‹ Nakotikala kokata boyokani te kati na Ngai mpe bino ;