Longwa na Aroeri oyo ezali na suka ya lubwaku ya Arinoni, mpe longwa na engumba oyo ezali kati na lubwaku kino na Galadi, ezalaki na engumba moko te oyo elekaki biso na makasi. Yawe, Nzambe na biso, apesaki biso yango nyonso.
Kasi bopusanaki te na mokili ya bato ya Amoni, na ngambo nyonso ya lubwaku ya Yaboki, na bingumba ya bangomba, mpe na bisika nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, apekisaki biso.
Awa Yawe, Nzambe ya Isalaele, asili kobotola mokili ya bato ya Amori mpe apesi yango epai ya bana ya Isalaele, yo olingi sik’oyo kobotola bango yango ?