Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 11:21 - Mokanda na Bomoi

21 Kasi Yawe, Nzambe ya Isalaele, akabaki Sikoni mpe bato na ye nyonso na maboko ya bana ya Isalaele, mpe balongaki bango. Boye bana ya Isalaele babotolaki mokili nyonso ya bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na etando wana.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 11:21
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Basoda ya Isalaele bakimaki liboso ya basoda ya Yuda, mpe Nzambe akabaki bango na maboko ya basoda ya Yuda.


Boyebi te ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesa mpo na libela bokonzi ya Isalaele epai ya Davidi mpe bana na ye na nzela ya boyokani oyo ekoki kobongwana te ?


Nakotia bandelo na bino kobanda na ebale monene ya barozo kino na ebale monene ya bato ya Filisitia mpe kobanda na esobe ya Sinai kino na ebale Efrate ; pamba te nakopesa bato ya mboka na maboko na bino, bongo bino bokobengana bango liboso na bino.


Nzokande, Ngai, nabebisaki bato ya Amori liboso na bango, atako bazali milayi lokola banzete ya sedele mpe makasi lokola banzete ya sheni. Nabebisaki bambuma na yango na likolo, mpe misisa na yango na se.


Kasi Isalaele alongaki ye mpe akamataki mokili na ye wuta na Arinoni kino na Yaboki, mpe lisusu kino na mokili ya bato ya Amoni, mpo ete bazalaki kokengela mondelo yango makasi.


Tango Sikoni elongo na mampinga na ye nyonso babimaki mpo na kobundisa biso na Yakatsi,


Yawe alobaki na Jozue : — Tala, na maboko na yo, nasili kokaba Jeriko elongo na mokonzi na yango mpe bilombe na yango ya bitumba.


Kasi Sikoni andimaki te bana ya Isalaele mpo ete baleka na mokili na ye. Boye asangisaki bato na ye nyonso ; batongaki milako, na Yakatsi, mpe babundisaki Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ