20 Kasi Sikoni andimaki te bana ya Isalaele mpo ete baleka na mokili na ye. Boye asangisaki bato na ye nyonso ; batongaki milako, na Yakatsi, mpe babundisaki Isalaele.
Okabaki mikili mpe bikolo na maboko na bango mpo ete bazwa bituka na bango kino na bandelo na yango. Babotolaki mokili ya Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani.
Bongo bana ya Isalaele batindaki bantoma epai ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni mpo na koloba na ye : ‹ Tika biso toleka na mokili na yo mpo ete tokende na esika na biso. ›
Kasi Yawe, Nzambe ya Isalaele, akabaki Sikoni mpe bato na ye nyonso na maboko ya bana ya Isalaele, mpe balongaki bango. Boye bana ya Isalaele babotolaki mokili nyonso ya bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na etando wana.