Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 11:16 - Mokanda na Bomoi

16 Kasi tango bana ya Isalaele babimaki na Ejipito, batambolaki na esobe kino na ebale monene ya Barozo, mpe bakomaki na Kadeshi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 11:16
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bazongaki, bakendeki na Eyini-Mishipati oyo elakisi Kadeshi mpe babotolaki mokili mobimba ya bato ya Amaleki. Balongaki mpe bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na Atsatsoni-Tamari.


Bayaki kokuta Moyize, Aron mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele na Kadeshi, kati na esobe ya Parani. Ezalaki kuna nde bapesaki bango elongo na lisanga mobimba sango ya mobembo na bango mpe balakisaki bango bambuma ya mokili yango.


Lokola bato ya Amaleki mpe ya Kanana bazali nanu kovanda na lubwaku, bino bokobaluka mpe bokozonga lobi na tongo na esobe, na nzela oyo ekenda na ebale monene ya Barozo.


Na sanza ya liboso, lisanga mobimba ya Isalaele ekomaki na esobe ya Tsini mpe bavandaki na Kadeshi. Ezalaki kuna nde Miriami akufaki mpe bakundaki ye.


Mpo na nini omemaki lisanga ya Yawe na esobe oyo ? Ezali mpo ete biso mpe bibwele na biso tokufa awa ?


Mpo na bino, bobaluka mpe bokende na esobe, na nzela ya ebale monene ya Barozo. »


Bana ya Isalaele batambolaki kati na esobe mibu tuku minei, kino tango ekeke mobimba ya mibali oyo bakokisaki mibu ya kobunda bitumba tango babimaki na Ejipito basilaki kokufa. Mpo ete batosaki Yawe te, Yawe alapaki ndayi ete bakomona te mokili oyo alakaki kopesa epai ya batata na bango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi.


— Tala maloba oyo Jefite alobi : « Bana ya Isalaele bazwaki mokili ya Moabi te to mokili ya bato ya Amoni te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ