Sik’oyo, tala bato ya Amoni, ya Moabi mpe bavandi ya etuka ya bangomba Seiri, ba-oyo na tina na bango, tango bana ya Isalaele babimaki na Ejipito, opekisaki bana ya Isalaele kobotola mokili na bango ; mpe mpo na yango, balekaki pembeni-pembeni ya mokili na bango mpe babomaki bango te !
Tango okokoma na mokili ya bato ya Amoni, komona bango lokola banguna te mpe kobundisa bango te, pamba te nakopesa yo ata eteni moko te ya mabele kati na mokili ya bakitani ya bato ya Amoni. Nasilaki kopesa yango lokola bozwi epai ya bakitani ya Loti. »
Yawe alobaki na ngai : « Bomona bato ya Moabi lokola banguna na bino te mpe bobundisa bango te, pamba te nakopesa bino ata eloko moko te kati na mokili na bango. Nasila kopesa mokili ya Ari lokola bozwi epai ya bakitani ya Loti. »