12 Bongo Jefite atindaki bantoma epai ya mokonzi ya bato ya Amoni mpo na koloba na ye : — Ozwi biso na likambo nini mpo ete oya kobundisa mboka na biso ?
Boye Jefite akendeki nzela moko na bampaka ya Galadi, mpe bato ya Galadi bakomisaki ye mokambi mpe mokonzi ya mampinga. Mpe Jefite azongelaki koloba maloba na ye nyonso liboso ya Yawe, kati na Mitsipa.
Mokonzi ya bato ya Amoni azongiselaki bantoma ya Jefite : — Ezali mpo ete Isalaele abotolaki mokili na ngai tango abimaki na Ejipito ; babotolaki mokili yango longwa na lubwaku ya Arinoni, mayi moke ya Yaboki kino na lubwaku ya Yordani. Sik’oyo, zongisela ngai yango na kimia.
Jefite azongiselaki bango : — Ngai mpe bato na ngai, tozalaki na kobendana makasi na bato ya Amoni ; mpe tango nabengaki bino, bokangolaki ngai te wuta na maboko na bango.