Boye, Sarayi alobaki na Abrami : — Ezali mpo na yo nde ngai nazali komona pasi ya boye ; napesaki mosali na ngai ya mwasi na maboko na yo. Mpe sik’oyo lokola amoni ete azali na zemi, akomi kotiola ngai. Tika ete Yawe akata likambo kati na ngai mpe yo.
Soki onyokoli bana na ngai ya basi mpe soki ozwi basi mosusu likolo na bana na ngai ya basi, atako moto moko te akozala kati na biso, kasi yeba ete Nzambe nde azali motatoli kati na yo mpe ngai. »
Tika ete Nzambe ya Abrayami mpe Nzambe ya Naori, Nzambe ya tata na bango, azala Mosambisi kati na biso ! Bongo Jakobi alapaki ndayi na Kombo ya Nzambe oyo tata na ye, Izaki, azalaki kobanga.
Pamba te basalaki kati na Isalaele ekobo elongo na basi ya baninga na bango, bapaya, mpe balobaki lokuta na Kombo na Ngai, nzokande Ngai natindaki bango te kosala bongo. Nayebi yango malamu, mpe Ngai moko nazali Motatoli na yango, » elobi Yawe.
Balobaki na Jeremi : — Tika ete Yawe azala motatoli ya solo mpe ya sembo mpo na kopesa biso etumbu soki toboyi kotosa makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo mokumba ya koyebisa biso.
Bino nyonso, bikolo, boyoka ! Mabele elongo na nyonso oyo ezali kati na yo, botia matoyi mpe boyoka ! Nkolo Yawe azwi bino na likambo ; Yawe akosambisa bino wuta na Ndako na Ye ya bule !
Nakoyeisa elakeli mabe oyo mpo ete ekota kati na ndako ya moyibi mpe kati na ndako ya moto oyo alapaka ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai. Ekotikala solo kati na ndako na ye mpe ekobebisa yango nyonso, ezala mabaya to mabanga na yango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Nzambe oyo nasalelaka na motema na ngai mobimba tango nateyaka Sango Malamu ya Mwana na Ye, azali Motatoli na ngai ete natikaka te kotanga kombo na bino
Na tango wana, napesaki bakambi na bino mokumba oyo : « Boyoka kowelana oyo ezali kati na bandeko na bino mpe bokata makambo na bosembo ; ezala kowelana kati ya bana ya Isalaele bango na bango to kati ya mwana ya Isalaele mpe mopaya.
Jefite azongiselaki bampaka ya Galadi : — Soki bozongisi ngai mpo na kobundisa bato ya Amoni, bongo Yawe akabi bango na maboko na ngai, boni, nakozala solo mokonzi na bino ?
Samuele alobaki na bango : — Yawe azali Motatoli mpo na kotelemela bino, mpe mopakolami na Ye azali motatoli na mokolo ya lelo ete bomoni ata eloko moko te kati na maboko na ngai. Bato bazongisaki : — Azali penza Motatoli.
Oh tata na ngai, tala eteni oyo ya kazaka na yo na loboko na ngai ! Nakataki songe ya kazaka na yo, kasi nabomaki yo te. Sik’oyo, sosola mpe yeba ete, kati na ngai, mayele mabe mpe botomboki ezali te. Nasalaki na ngai yo mabe te, kasi yo ozali kolanda ngai mpo na koboma ngai.