Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 10:18 - Mokanda na Bomoi

18 Bato mpe bakonzi ya Galadi balobanaki : « Moto oyo akobundisa liboso bana ya Amoni akozala mokonzi ya bato nyonso ya Galadi. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 10:18
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bankumu na yango bakozala lisusu wana te mpo na kopona mokonzi, bakambi na yango nyonso bakotikala lisusu te.


Sima na kufa ya Jozue, bana ya Isalaele batunaki Yawe : — Libota nini kati na biso ekokende liboso mpo na kobundisa bato ya Kanana ?


Tango bato ya Amoni basanganaki mpe batiaki molako na bango kati na Galadi, bana ya Isalaele basanganaki mpe batiaki molako na bango kati na Mitsipa.


Jefite, moto ya Galadi, azalaki elombe ya bitumba. Azalaki mwana mobali oyo Galadi abotaki na mwasi ya makangu.


Boye Jefite akendeki nzela moko na bampaka ya Galadi, mpe bato ya Galadi bakomisaki ye mokambi mpe mokonzi ya mampinga. Mpe Jefite azongelaki koloba maloba na ye nyonso liboso ya Yawe, kati na Mitsipa.


Sima na mwa tango, bato ya Amoni babundisaki Isalaele.


Jefite, moto ya Galadi, akambaki Isalaele mibu motoba. Sima na yango, akufaki, mpe bakundaki ye kati na engumba moko ya Galadi.


Moko na moko kati na bato ya Isalaele akomaki koloba : « Bozali na bino komona mobali oyo ndenge azali kobima mpo na koya epai na biso ? Azali nde koya kotiola Isalaele ! Mokonzi akopesa bomengo ebele epai ya moto oyo akoboma ye, akopesa ye mwana na ye ya mwasi na libala mpe akosalela libota ya tata na ye bolamu kati na Isalaele. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ